| Oyeba otika nga na zemi |
| Nga mwana muke, otiya avenir na nga en danger |
| Mokolo okendaka, olakaki okozonga |
| Sanza mobimba kutu ekokoka te |
| Mokolo yango, mvula ezalaki konoka |
| Yango bomonaki te pinzoli na miso na nga |
| Sima nazali, sokoto nazeli |
| Bileko bileki, sokoto azongaka te |
| Nga nakoma soni ya famille na biso |
| Nga nde mwana mabe |
| Basekisaka nga lisusu te |
| Balakisaka nga misapi na nzela |
| Kaka mpo Pépé na nga aza na tata te |
| Ba masolo na yo na b’amis oyo na ngaï, se na le temps passé |
| Ndenge tolinganaka na l’amour ya folie |
| Ndenge tolakanaka se pe likolo |
| Ndenge tokanaka, toya kobota mwana |
| Ndenge topesaki ye deja kombo Roméo |
| Nabosani te Sokoto |
| Balobaka, balobaka oublier le passé |
| Wana maloba ya pamba, lelo nayebi |
| Balobaka, balobaka oublier le passé |
| Makambo mosusu babosanaka te |
| Anguele mawa te |
| Soki pe destinée |
| Alea acta est |
| Zonga ngo bolingo Sokoto |
| Yo nde avenir, vie nyonso ya moto eh |
| Yaka ngo bolingo Sokoto |
| Yo nde avenir, vie nyonso ya moto |
| Ah nga Felly nsomi ya mama, nakoma ko mi lela |
| Nakoma mwana mawa |
| Nasala nini vraiment na Nzambe po atika nga boye |
| Nakoma malheureuse |
| Ebale mozindo soki nayebaki qu’ezalaka bolingo nde natiaki te mosapi |
| Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta |
| Asukoli maboko, akimi responsabilité |
| Nani akosi ye po lelo aboya nga |
| Moni motema ekobeta nga awa eh |
| Navandi na ndako, loboko na litama |
| Ndaku ovandaka te, okoyeba ndenge nini |
| Esika mayi ekotangaka moni |
| Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta |
| Asukoli maboko, akimi responsabilité |
| Nani akosi ye po lelo aboya nga |
| Eh ngaï, eh ngaï, mawa trop |
| Eloko yango l’amour |
| Yango nga natuna na nani |
| Nga natuna na Didas |
| Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta |
| Asukoli maboko, akimi responsabilité |
| Nani akosi ye po lelo aboya nga |
| Motema, molimo ngaï nalingaka yo |
| Y’okomisi nga yuma |
| Motema, molimo ngaï nalingaka yo |
| Y’okomisi nga yuma ehh |
| Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta |
| Asukoli maboko, akimi responsabilité |
| Nani akosi ye po lelo aboya nga |
| Y’okeyi yolimwe |
| Y’otiki ata adresse te |
| Y’otiki mobulu na vie na nga ya mwasi |
| Nalelela nani, namipesa na losambo |
| Sokoto Manzala mwana ya mama Peto |
| Anicet Pedro yebisa ye |
| Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta |
| Asukoli maboko, akimi responsabilité (eh, eh Achram Oje) |
| Nani akosi ye po lelo aboya nga |
| Oy’a losambo ya ba soeurs ya kilo |
| Beloti, Maka et compagnie |
| Karington, Nicolette de Monaco |
| Loboko obe na motema |
| Tcha-Tcho ata cop’ezalaka sukali |
| Opap’s Tilope |